settings icon
share icon
Motuna

Ozwi Bomoi bwa Seko?

Eyano


Bibilia ezali kolakisa polele nzela eye ememaka na bomoi bwa seko. Yambo, tosengeli kokitola ete tosumukaki na Nzambe: “Mpo banso basumukaki mpe bazangi nkembo ya Nzambe” (Baloma 3:23). Tosalaki banso makambo maye masepelisaki Nzambe te, maye masali ete tolongobani na etumbu. Lokola nsuka ya masumu ma biso manso ezali likambo ya botomboki na Nzambe moko ya seko, bobele etumbu moko ya seko ekoki na biso. "Lifuta ya masumu ezali liwa, kasi likabo lya Nzambe ezali bomoi bwa seko o nzela ya Yesu Klisto Nkolo wa biso" (Baloma 6:23).

Nzokande, Yesu Klisto, oyo azanga lisumu (1 Petelo 2:22), Mwana ya seko wa Nzambe akomaki moto (Yoane 1:1, 14) mpe akufaki mpo ya kofuta nyongo ya etumbu na biso. "Nzambe alakisaki bolingo bwa Ye mpo na biso na eye: wana ezalaki biso naino basumuki, Klisto akufaki mpo ya biso " (Baloma 5:8). Yesu Klisto akufaki na ekulusu (Yoane 19:31-42), kokamataka etumbu eye elongobanaki na biso (2 Bakolinti 5:21). Mikolo misato nsima Asekwaki uta na bakufi (1 Bakolinti 15:1-4), kolakisaka elonga na Ye likolo lya lisumu mpe liwa. "Na boboto monene bwa Ye Apesaki biso mbotama ya sika na elikya moko ya bomoi o nzela ya bosekwi bwa Yesu Klisto uta na bakufi " (1 Petelo 1:3).

Na bondimi, tosengeli kobongola makanisi ma biso mpo na eye etali Klisto- nani ezali Ye, Asalaki nini, mpe ntina nini – mpo ya lobiko (Misala 3:19). Soki toti bondimi bwa biso na Ye, kotiaka motema mwa biso na liwa lya Ye na ekulusu mpo ya kofuta masumu ma biso, tokolimbisama mpe tokozwa elako ya bomoi bwa seko na lola. "Mpo Nzambe alingaki mingi mokili ete Apesaki Mwana se moko wa ye ete moto nyonso oyo andimi ye akufa te kasi azwa bomoi bwa seko" (Yoane 3:16). "Soki otatoli na monoko mwa yo ete, ‘Yesu azali Nkolo,’ mpe ondimi na motema mwa yo ete Nzambe asekwisaki Ye uta na bakufi, okobikisama" (Baloma 10:9). Bondimi yango moko na mosala mokokisami mwa Klisto na ekulusu ezali bobele nzela ya solo na bomoi bwa seko! “Mpo ezali na ngolu nde obikisami, o nzela ya bondimi – mpe eye na bokasi bwa yomei te, ezali likabo lya Nzambe-na misala te, ete moto moko abeta ntolo te"(Efeso 2:8-9).

Soki olingi kondima Yesu Klisto lokola Mobiki wa yo, emekoleli ya losambo ezali awa. Bomikundola ete, kolobaka maloba ma losambo loye soki mpe losambo mosusu ekobikisa yo te. Ezali bobele kotiela Klisto motema nde ekoki kobikisa yo uta na masumu. Losambo oyo ezali bobele yoko nzela ya kolakisa na Nzambe bondimi bwa yo na Ye mpe kotonda Ye mpo ya kopesa lobiko mpo na yo. "Nzambe, nayebi ete nasumuki na yo mpe nalongobani na etumbu. Kasi Yesu Klisto akamataki etumbu eye elongobani na ngai mpo ete o nzela ya bondimi na Ye nakoka kolimbisama. Natieli Yo motema mpo na lobiko. Natondi Yo mpo na ngolu mpe bolimbisi bwa yo ya kokamwa – likabo lya bomoi bwa seko! Amene!"

Esili yo kozwa mokano na ntina ya maye otangi awa? Soki bongo, tosengi onyata likolo ya molongo wapi ekomami awa na nse "Nandimi Klisto lelo oyo".

English



Zonga na lokasa ya boyambi na Lingala

Ozwi Bomoi bwa Seko?
© Copyright Got Questions Ministries