Nzambe azalaka mpenza? Bilembo bizali biye bilakisi ete Nzambe azali?




Motuna: Nzambe azalaka mpenza? Bilembo bizali biye bilakisi ete Nzambe azali?

Eyano:
Kozala ya Nzambe ekoki kolakisama te soki mpe koboya kolakisama te. Bibilia elobi ete tosengeli kondima bobele na bondimi ete Nzambe azali: “Mpe soki bondimi ezali te ekoki kosepelisa Nzambe te, And without faith it is impossible to please God, mpo ete esengeli na moto nyonso oyo azali koya epai na ye kondima ete Azali mpe ete Afutaka baoyo balukaka ye na makasi” (Ebele 11:6). Nzambe alingaki bongo, Akokaki bobele komanana mpe kolakisa na mokili mobimba ete Azali. Kasi soki asalaki eye wana ntina ya bondimi elingaki te kozala. “Bongo Yesu alobaki na ye, ‘Mpo omoni ngai, yango wana ondimi; bapambolami baye wana bamoni te kasi nzokande bandimi’” (Yoane 20:29).

Eye wana elingi te koloba, nzokande, ete bilembo ya kolakisa ete Nzambe azali bizali te. Bibilia elobi, “Lola ezali kosakola nkembo ya Nzambe; likolo ezali koybisa mosala mwa maboko ma Ye. Mokolo na mokolo bazali kosopa maloba; butu na butu bazali kolakisa boyebi. Ezali na maloba te soki mpe monoko te epai wapi mongongo mwa bango ezali koyokana te. Mongongo mwa bango mokeyi epai na mabele manso, maloba ma bango kino na nsuka ya mokili” (Nzembo 19:1-4). Kotalaka minzoto, kolukaka kososola bonene bwa molongo, kotalaka bikamwa bya bokeli, kotalaka kitoko ya kokita ya moi—manso maye malakisi ete Nzambe Mokeli azali. Soko makambo maye ekoki te, ezali lisusu na bilembo bya Nzambe kati na mitema mya bato. Mosakoli 3:11 eyebisi biso ete, “…Atiaki lisusu boseko kati na mitema mya bato.” Na mozindo makasi kati na biso tozali na boyebi ete ezali na eloko moko epai kuna koleka bomoi boye mpe moto moko epai kuna koleka mokili moye. Tokoki kowangana boyebi boye na mayele ma biso, kasi ete Nzambe azali na biso mpe nzinganzinga na biso ezali komonana polele. Atako eye, Bibilia ekebisi biso ete boko bato bakowangana ete kozala ya Nzambe: “Elema alobi na motema na ye ete ‘Nzambe azali te’” (Nzembo 14:1). Mpo ete ndambo monene ya bato epai nyonso na ntango yak ala, na bonkoko bonso, na bompenza bonso, mpe na mikili minso bandimaka na lolenge moko ya Nzambe, esengeli ezala na eloko moko (soki te moto moko) oyo azali kosala ete boyambi oyo ezala.

Likolo ya maloba maye ma Bibilia mpo ya kotatola ete Nzambe azali, ezali na maloba mosusu maye matali motindo ya mayele ma bato. Lolenge ya bato banso mpo ya kotalela bomoto bwa maloba Nzambe mpo ya kolakisa ete Nzambe azali. Ebandaka na kolimbolaka ntina ya liloba Nzambe lokola “mozali oyo akoki kobanzama na moko mosusu ya monene koleka te.” Emonisami bongo ete kozala eleki mosika kozala te, mpe boye ezali na mozali monene koleka oyo abimisi banso. Soki Nzambe azalaki te, boye Nzambe akokaki te kozala mozali monene koleka oyo kobanzama, mpe eye wana elingaki koyokana te na ntina ya liloba Nzambe.

Maloba ya mibale ezali ma bato bayekola bonzambe. Ya bango maloba malobi ete lokola molongo mobimba ezali kolakisa biloko biye bizali komonana ya kokamwa biye, esengeli ezala na mosali oyo azali Nzambe. Ndakisa soki mabele mazalaki mpembeni na mwa kilometele moke na moi, mbele makokaki te kobatela mingi ya bomoi boye mango mazali sikawa kobatela. Soko biteni bya bofungwami bwa mokili mwa biso ya mpema bizalaki na mpo ya monkama ekeseni, mbele penepene ya nyonso oyo ezali na bomoi elingaki kokufa. Bokeseni ya biteni ya mike mike biye bisalaka ntei ya proteina ezali moko kati na 10243 (elingi koloba ete ezali 10 ya kolanda na zelo mbala 243). Nzokande eteni ya moke mpenza ya biloko ya bomoi ezali na biteni ya mike mike biye bisalaka ntei ya proteina nkoto na nkoto.

Maloba ya misato maye mazali kolokisa ete Nzambe azali mabiangemi maloba ma molongo. Likambo moko moko ezali na ntina. Molongo moye mpe nyonso eye ezali kati na yango ezali likambo lisalemi. Esengeli ezala na eloko yoko eye “ezangi kosalema” mpo ya kosala ete eloko nyonso mosusu eya na bomoi. Eye wana ntina oyo “ezangi kosalema” ezali nde Nzambe.

Maloba ma minei mayebani lokola maye matali boyebi bwa bolamu mpe mabe. Bonkoko bonso epai nyonso na ntango ya kala ezalaki na lolenge moko ya mobeko. Moto na moto azali na makanisi ma bolamu mpe mabe. Bobomi, lokuta, moyibi, mpe bonsoni iboyami na molongo mobimba. Ntina eye ya bolamu mpe mabe ewutaki wapi soki epai ya Nzambe moko mosantu te?

Atako manso maye, Bibilia eyebisi biso ete bato bakoboya koyamba boyebi boye ya polele mpe ya kowangana te ya Nzambe mpe bakondima lokuta na esika wana. Baloma 1:25 elobi, “ Babongoli bosolo bwa Nzambe na lokuta, mpe bakumbameli mpe basaleli biloko bikelami na esika ya Mokeli—oyo asanzolami libela na libela. Amene.” Bibilia esakoli lisusu ete bato bazali na mokalo te soki bandimi Nzambe te: “Mpo uta na bokeli bwa mokili makambo ma Nzambe mazangi te komonana—nguya na Ye ya seko mpe bonzambe na Ye—ezali komonana polele mpo ekoki kososolama uta na eye ekelami, ete bato bazali na mokalo te” (Baloma 1:20).

Bato bazali koloba ete bakoki kondima te ete Nzambe azali mpo ezali te koyokana na “Boyebi ya bato na mayele te” soki te “mpo ete ekoki kolakisama polele na bilembo te”. Ntina ya solo ezali nzokande ete soki kaka bandimi ete Nzambe azali, basengeli lisusu kondima ete bakoyanola epai ya Nzambe mpe bazali na bonsenga ya bolimbisi uta na Ye (Baloma 3:23, 6:23). Soki Nzambe azali, bongo tosengeli koyanola epai na Ye mpo ya misala mya biso minso. Soki Nzambe azali te, bongo tokoki kosala eye nyonso tolingi nakozanga komitungisa ete Nzambe akosambisa biso. Tala ntina eye wapi mingi ya baye wana bawanganaka kozala ya Nzambe batingami makasi na malongi ma mbongwana ya bazalani—ezali kopesa bango nzela ekeseni ya kondima na Nzambe Mokeli. Nzambe azali mpe suka suka moto moko moko ayebi ete Azali. Likambo liye lizali kosala mpenza ete boko bazali komeka kutu na kobundisaka basusu mpo bandima te kozala na Ye ezali solo mpenza maloba maye mazali kondimisa ete Azali.

Lolenge nini eyebi biso ete Nzambe azali? Lokola Baklisto, toyebi ete Nzambe azali mpo tolobaka na Ye mikolo nyonso. Toyokaka Ye te kolobela biso na mongongo, kasi toyokaka ete azali awa penepene na biso, toyokaka Ye kokamba biso, toyebi bolingo bwa Ye, tosengeli kozwa ngolu na Ye. Makambo masalemi mingi kati na bomoi bwa biso ete makoki kolimbolama ndenge mosusu te longola se na Nzambe. Nzambe asili kobikisa biso mpe kobongola bomoi bwa biso na lolenge ya kokamwa ete tokoki se kondima mpe kosanzola kozala na Ye. Moko te ya maloba maye makoki kondimisa moto oyo aboyi kondima eye ezalaki kala polele. Na nsuka, ete Nzambe azali esengeli kondimama na bondimi (Ebele 11:6). Bondimi na Nzambe ezali te bozangi komona ya moto oyo azali kati na molili; ezali eteni ya bokengi kati na ndako oyo engengisami na pole wapi ndambo mingi koleka ya bato basili kotelema.



Zonga na lokasa ya boyambi na Lingala



Nzambe azalaka mpenza? Bilembo bizali biye bilakisi ete Nzambe azali?