settings icon
share icon
Motuna

Yesu azali Nzambe? Elobaki Yesu ete azali Nzambe?

Eyano


Ekomami te kati na Bibilia wapi Yesu ye moko azali koloba maloba maye sikisiki ete, “Nazali Nzambe.” Eye wana, nzokande, elingi te koloba ete asakolaki te ete Azali Nzambe. Ndakisa, kamata maloba ma Yesu na Yoane 10:30, “Ngai mpe Tata tozali moko.” Tosengeli bobele kotala lolenge Bayuda bazongisaki eyano na maloba ma ye mpo na koyeba ete azalaki koloba ete azali Nzambe. Bamekaki kobamba Ye mabanga mpo na ntina eye mpenza. “… yo, moto mpamba, ozali koloba ete ozali Nzambe”(Yoane 10:33). Bayuda bayebaki sikisiki mpenza nini Yesu azalaki koloba—bonzambe. Mona ete Yesu awangani te maloba ma ye ya kozala Nzambe. Ntango Yesu alobi, “Ngai mpe Tata tozali moko” (Yoane 10:30), Azalaki koloba ete Ye mpe Tata bazali na motindo mpe ezalela ya lolenge moko. Yoane 8:58 ezali ndakisa mosusu. Yesu alobaki, “Nalobeli bino bosolo, liboso Abalayama abotama, Nazali!” Eyano ya Bayuda baye bayokaki maloba maye ezalaki kokamata mabanga mpo ya koboma Ye mpo atukaki, lokola Mobeko mwa Mose motindaki bango kosala (Lewitiko 24:15).

Yoane azongelaki likanisi lya bonzambe bwa Yesu: “Liloba ezalaki Nzambe” mpe “Liloba akomaki mosuni” (Yoane 1:1, 14). Milongo miye milakisi polele ete Yesu azali Nzambe na mosuni. Misala 20:28 elobeli biso ete, “Bozala babateli ba eklezia ya Nzambe, eye asombaki na makila ma yemei.” Nani asombaki eklezia—eklezia ya Nzambe—na makila ma Yemei? Yesu Klisto. Misala 20:28 esakoli ete Nzambe asombaki eklezia ya Ye na makila ma Yemei . Boye, Yesu azali Nzambe!

Toma moyekoli alobaki na ntina ya Yesu, “Nkolo wa ngai mpe Nzambe wa ngai” (Yoane 20:28). Yesu asemboli ye te. Tito 2:13 elendisi biso kozela boyei bwa Nzambe mpe Mobikisi, Yesu Klisto (tala lisusu 2 Petelo 1:1). Na Ebele 1:8, Tata alobi na ntina ya Yesu, “Kasi na ntina ya Mwana Alobi, ‘Ngbende na yo, O Nzambe, ekotikala libela na libela, mpe bosembo ekozala lingenda lya bokonzi.’” Tata azali kotanga Yesu lokola “O Nzambe” kolakisaka ete Yesu azali mpenza Nzambe.

Na Emoniseli, mwanze moko apesaki malakisi na apostolo Yoane mpo ya kokumbamela bobele Nzambe (Emoniseli 19:10). Mbala nzike kati na Makomi Yesu andimaki bakumbamela ye (Matai 2:11, 14:33, 28:9, 17; Luka 24:52; Yoane 9:38). Apalelaki soko moke te bato mpo bakumbamelaki Ye. Soki Yesu azalaki te Nzambe, Alingaki koyebisa bato ete bakumbamela Ye te, kaka lokola mwanze asalaki kati na Emoniseli. Ezali na milongo mpe matangi mingi mosusu ya Makomi maye mazali kolobela mpo ya bonzambe bwa Yesu.

Ntina ya monene koleka nyonso ete Yesu asengeli kozala Nzambe ezali ete soki Azali Nzambe te, liwa lya Ye mbele ekokaki te kofuta etumbu mpo ya masumu ma mokili (1 Yoane 2:2). Mozalani akelami, oyo Yesu alingaki kozala soki zalaki te Nzambe, akokaki te kofuta etumbu ezanga nsuka ya lolenge loye lokola esengami mpo ya kosumuka na Nzambe oyo azali na nsuka te. Bobele Nzambe akokaki kofuta etumbu ya lolenge loye ezanga nsuka. Bobele Nzambe akokaki kokamata likolo lya ye masumu ma mokili (2 Bakolinti 5:21), kokufa, mpe kosekwisama, kolakisaka bongo elonga ya Ye likolo lya lisumu mpe liwa.

English



Zonga na lokasa ya boyambi na Lingala

Yesu azali Nzambe? Elobaki Yesu ete azali Nzambe?
© Copyright Got Questions Ministries