settings icon
share icon
Motuna

Mwango soki te nzela ya lobiko ezali nini?

Eyano


Ozali koyoka nzala? Nzala ya biloko ya mosuni te, kasi ezali yo koyoka nzala ya eloko eleki motuya na bomoi? Eloko moko ya mozindo ezali kati na yo eye emonani ete ezwi eyano te? Soki bongo, Yesu azali nzela! Yesu alobaki, “Nazali lipa lya bomoi. Ye oyo ayei epai ya ngai akokufa nzala te, mpe ye oyo andimi ngai akoyoka mposa ya mai soko moke te” (Yoane 6:35).

Obulunganisami? Ekoki yo kozwa nzela soki mpe ntina soki moke te na bomoi? Emonani lokola ete moto moko abomi mwinda mpe okoki te komona esika ya kopelisa? Soki bongo, Yesu azali nzela! Yesu asakolaki ete, “Nazali pole ya mokili. Moto nyonso oyo alandi ngai akotambola te kati na molili, kasi akozwa pole ya bomoi”(Yoane 8:12).

Ezali yo koyoka lokola soki okangami na boloko bwa bomoi? Omekaki kofungola bikuke mingi, bobele mpo ya komona ete oyo ezali nsima na yango ezali se mpamba mpe eloko moko te? Ezali yo koluka esika ya kokota na bomoi oyo ekokisami? Soki bongo Yesu azali nzela! Yesu asakolaki ete, “Nazali ekuke; soko moto nani akoyingela o nzela ya ngai akobikisama. Akoyingela mpe akobima, mpe akozwa bilei”(Yoane 10:9).

Bato mosusu basiswaka yo ntango nyonso? Mikangano mya yo na bato mizalaka se likolo likolo mpe ntina moko te? Emonanaka se lokola ete bato nyonso balingaka kaka komonela yo? Soki bongo, Yesu azali nzela! Yesu alobaki, “Nazali mobateli malamu. Mobateli malamu atikaka bomoi na ye mpo na mpate. Nazali mobateli malamu; nayebi mpate ya ngai mpe mpate ya ngai bayebi ngai”(Yoane 10:11, 14).

Omitunaka nini esalemaka nsima ya bomoi boye? Olembi kotambwisa bomoi bwa yo mpo ya biloko biye bipolaka mpe bibebaka? Otiaka ntango mosusu ntembe soki bomoi ezali na ntina moko? Olingi kozala na bomoi nsima ya kokufa? Soki bongo, Yesu azali nzela! Yesu asakolaki, “Nazali bosekwi mpe bomoi. Ye oyo azali kondima ngai akozwa bomoi, ata soki akufi; mpe moto nyonso akozala na bomoi mpe azali kondima ngai akokufa soko moke te” (Yoane 11:25-26).

Nzela ezali nini? Bosolo ezali nini? Bomoi ezali nini? Yesu apesaki eyano ete, “Nazali nzela mpe bosolo mpe bomoi, Moto moko te ayaka na Tata longola se o nzela ya ngai” (Yoane 14:6).

Nzala oyo azali koyoka ezali nzala ya molimo, mpe ekoki kotondisama bobele na Yesu oyo azali bobele se moko oyo akoki kolongola molili. Yesu azali ekuke mpo na bomoi oyo ekokisami. Yesu azali moninga mpe mobateli oyo ozalaki koluka. Yesu azali bomoi—kati na bomoi oyo mpe na boye ezali koya nsima. Yesu azali nzela ya lobiko!

Ntina oyo ozali koyoka nzala, ntina oyo ozali komona lokola ete obwakami na molili, ntina ete okoki te komona ntina ya bomoi, ezali ete okabwani na Nzambe. Bibilia elobeli biso ete banso tosumukaki, mpe boye tokabwani mosika na Nzambe (Mosakoli 7:20; Baloma 3:23). Mpamba oyo ozali koyoka na motema mwa yo ezali ete Nzambe azali kozanga kati na bomoi bwa yo. Tokelamaki mpo ya kozala na mokangano na Nzambe. Na ntina ya masumu ma biso, tokabwani na mokangano mona. Mpe ya mabe koleka, masumu ma biso makosala ete tokabwana na Nzambe seko na seko, na bomoi boye mpe na boye ezali koya nsima (Baloma 6:23; Yoane 3:36).

Likambo liye ekozwa nzelasoki te eyano ndenge nini? Yesu azali nzela! Yesu akamataki masumu ma biso likolo lya Yemei (2 Bakolinti 5:21). Yesu akufaki na esika ya biso (Baloma 5:8), kokamataka etumbu elongobani na biso. Mikolo misato nsima, Yesu asekwaki uta na bakufi, kolakisaka elonga na Ye likolo ya lisumu mpe liwa (Baloma 6:4-5). Asalaki yango mpo na nini? Yesu Yemei apesaki eyano na motuna mona: “Moto moko te azali na bolingo boleki monene ete eye, asopa bomoi bwa ye mpo ya baninga ba ye” (Yoane 15:13). Yesu akufaki mpo ete tokoka kozwa bomoi. Soki toti bondimi bwa biso na Yesu, kotiaka motema na liwa lya Ye lokola lifuta mpo ya masumu ma biso, masumu ma biso manso malimbisami mpe masukolami. Mpe nzala na biso ya molimo ekotondisama.Minda mikopela. Tokozwa nzela ya kozala na bomoi ekokisami. Tokoyeba moninga na biso ya solo koleka malamu mpe mobateli malamu. Tokoyeba ete tokozwa bomoi nsima ya kokufa—bomoi bosekwisami na lola seko na seko elongo na Yesu!

“Mpo Nzambe alingaki mingi mokili ete apesaki Mwana se moko wa ye, ete moto nyonso oyo andimi ye akufa te kasi azwa bomoi bwa seko” (Yoane 3:16).

Esili yo kozwa mokano na ntina ya maye otangi awa? Soki bongo, tosengi onyata likolo ya molongo wapi ekomami awa na nse "Nandimi Klisto lelo oyo".

English



Zonga na lokasa ya boyambi na Lingala

Mwango soki te nzela ya lobiko ezali nini?
© Copyright Got Questions Ministries