settings icon
share icon
Motuna

Ozwi Bolimbisi? Lolenge boni ekoki ngai kozwa bolimbisi bwa masumu ma ngai uta na Nzambe?

Eyano


Misala 13:38 esakoli ete, “Boye, bandeko ba ngai, nalingi boyeba ete o nzela ya Yesu bolimbisi bwa masumu esakolami mpo ya bino.”

Bolimbisi ezali nini mpe mpo na nini nasengeli yango?

Liloba “kolimbisa” elingi koloba kosukola libaya ya kokomela, kobosana mabe basali yo, kotika nyongo. Ntango tosali moto moko mabe, tosengaka bolimbisi mpo ete mokangano ezongisama. Bolimbisi bopesami te mpo moto alongobani kolimbisama. Moto moko te alongobani kolimbisama. Bolimbisi ezali mosala ya bolingo, ngolu, mpe boboto. Bolimbisi ezali mokano ya kotia likambo likolo ya moto mosusu te, ata basali yo mabe soki nini.

Bibilia ezali koyebisa biso ete banso tosengeli kozwa bolimbisi uta na Nzambe. Banso tosalaki lisumu. Mosakoli 7:20 elobi ete, “Ezali na moto moko te likolo lya mabele oyo azali kosala eye ezali semba mpe oyo asumukaka te.” 1 Yoane 1:8 elobi ete, “Soki tolobi ete tozali na lisumu te, tozali komikosa bisomei mpe bosolo ezali kati na biso te.” Na nsuka lisumu nyonso ezali likambo lya botomboki na Nzambe (Nzembo 51:4). Tala ntina banso tosengeli kozwa bolimbisi bwa Nzambe. Soki masumu ma biso malimbisami te, tokolekisa boseko koyokaka se mpasi ya masumu ma biso (Matai 25:46; Yoane 3:36).

Bolimbisi – Lolenge nini kozwa yango?

Likambo ya bozoingisi matondi, Nzambe azali bolingo mpe atonda na boboto – azali pene ya kolimbisa biso masumu ma biso! 2 Petelo 3:9 elobeli biso ete, “…Azali na bompikiliki na bino, kolingaka ete moto moko te akufa, kasi banso baya na boyamboli.” Nzambe azali na mposa ya kolimbisa biso, boye Apesaki eye esengeli mpo ya bolimbisi bwa biso.

Etumbu se moko ya sembo mpo ya masumu ma biso ezali liwa. Eteni ya yambo ya Baloma 6:23 esakoli ete, “Mpo lifuta lya masumu ezali liwa…” Liwa lya seko ezali eye tofutamaki mpo ya masumu ma biso. Nzambe, na mwango mwa bobongi nie mwa Ye, akomaki mozalani – Yesu Klisto (Yoane 1:1, 14). Yesu akufaki likolo lya ekulusu, kokamataka etumbu eye elongobani na biso – liwa. 2 Bakolinti 5:21 eteyi biso ete, “Nzambe asalaki Ye oyo azalaki na lisumu te kozala lisumu mpo ya biso, ete na Ye tokoka kokoma bosembo bwa Nzambe.” Yesu akufaki likolo lya ekulusu, kokamataka etumbu eye elongobanaki na biso! Lokola Nzambe, liwa lya Yesu epesi bolimbisi mpo ya masumu ma mokili mobimba. 1 Yoane 2:2 esakoli ete, “Azali mbeka ya mbondi soki te bomikabi mpo ya masumu ma biso, mpe bobele kaka mpo ya masumu ma biso te kasi mpo ya masumu ma mokili mobimba.” Yesu atelemaki uta na liwa, kosakolaka elonga na Ye likolo ya masumu mpe liwa (1 Bakolinti 15:1-28). Sanzola Nzambe, o nzela ya liwa mpe bosekwi bwa Yesu Klisto, eteni ya mibale ya Baloma 6:23 ezali solo, “…kasi likabo lya Nzambe ezali bomoi bwa seko o nzela ya Yesu Klisto Nkolo wa biso.”

Elingi yo kozwa bolimbisi bwa masumu ma yo? Ezali yo koyoka ete ozali na elindo eye ezali koswa yo eye wapi emonani lokola ete ekoki kolongwa te? Bolimbisi bwa masumu ma yo esili komonana soki okotia bondimi bwa yo na YesuKlisto lokola Mobikisi wa yo. Baefese 1:7 elobi, “Na Ye tozali na bosikoli o nzela ya makila ma Ye, bolimbisi bwa masumu, engebene na ebele ya ngolu ya Nzambe.” Yesu afutaki nyongo ya biso mpo ya biso, ete tokoka kolimbisama. Nyonso osengeli kosala ezali kosenga Nzambe ete alimbisa yo o nzela ya Yesu, kondimaka ete Yesu akufaki mpo ya kofuta bolimbisi bwa yo – mpe akolimbisa yo! Yoane 3:16-17 ezali na nsango eye ya kokamwa, “Mpo Nzambe alingaki mokili ete apesaki Mwana mobali se moko wa ye, ete moto nyonso oyo akondima na Ye akufa te kasi azwa bomoi bwa seko. Mpo Nzambe atindaki te Mwana wa Ye kati na mokili mpo ya asambisa mokili, kasi mpo ya kobikisa mokili o nzela ya Ye.”

Bolimbisi – ezali solo likambo ya pete?

Iyo ezali pete! Okoki te kofutama bolimbisi uta na Nzambe. Okoki te kozwa bolimbisi uta na Nzambe. Okoki bobele kozwa yango, na bondimi, o nzela ya ngolu mpe boboto bwa Nzambe. Soki olingi kondima Yesu Klisto lokola Mobikisi wa yo mpe kozwa bolimbisi uta na Nzambe, losambo ezali awa okoki kosambela. Kolobaka losambo oyo soko te losambo soki nini mosusu ekobikisa yo te. Ezali bobele kotiela Yesu Klisto motema nde ekoki kopesa bolimbisi bwa masumu. Losambo oyo ezali bobele yoko nzela ya kolakisa na Nzambe bondimi bwa yo epai na Ye mpe kotonda Ye mpo apesi yo bolimbisi. “Nzambe, nayebi ete nasumukaki na Yo mpe nalongobani mpo ya kozwa etumbu. Kasi Yesu Klisto akamataki etumbu eye elongobani na ngai ete o nzela ya bondimi na Ye nakoka kolimbisama. Nati motema mwa ngai epai na Yo mpo na lobiko. Matondi mingi mpo ya ngolu mpe bolimbisi bwa Yo ya kokamwa! Amene!"

Esili yo kozwa mokano na ntina ya maye otangi awa? Soki bongo, tosengi onyata likolo ya molongo wapi ekomami awa na nse "Nandimi Klisto lelo oyo".

English



Zonga na lokasa ya boyambi na Lingala

Ozwi Bolimbisi? Lolenge boni ekoki ngai kozwa bolimbisi bwa masumu ma ngai uta na Nzambe?
© Copyright Got Questions Ministries